Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

E. Ramazani na ba ministres : "'grand prètre' aza kaka moko, président Kabila"


Secrétaire permanent ya PPRD Emmanuel Ramazani Shadary azali koloba kati na balandi ya lingomba na ye, Gombe, Kinshasa, 26 août 2019.
Secrétaire permanent ya PPRD Emmanuel Ramazani Shadary azali koloba kati na balandi ya lingomba na ye, Gombe, Kinshasa, 26 août 2019.

Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD (Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, akebisi ba ministres ya sika ya lingomba na ye mpo na koboya kotosa malako lingomba likopesa bango.

Apamelaki bango liboso ya bituluku ya balandi ya lingomba PPRD, na bokutani bazalaki na yangoo na Gombe, Kinshasa, nsima bobimisami ya mbulamatari ya sika o’mokolo ya yambo ya mposo.

"Bokanisi ete finalement boza ba excellents et excellents. Faux et archi-gaux! Grand-prêtre aza kaka moko, na biso. 'Grand-prêtre' aza président Kabila. (Jeanine) Mabunda aza 'grand-prêtre' te. Shadary aza 'grand-prêtre' te. Soki She Okiutndu aza 'grand-prêtre' te. Mova aza 'grand-prêtre te. Ebongo yo ministre okanisi oza 'grand-prêtre'? Yo ministre, totieyi ministre lelo, nalobi lisusu :'oza 'grand-prêtre te! Ozo sala semblant. Lelo eza mokolo na yo ya succès, ya honneur. Oyei, après réunion oyo okeyi libela. Keba ! Excellence, keba !," ebeti sete M. Ramazani.

M. Ramzani asakoli liboso ya banso ete mokolo moleki ba ministres ya sika batiyaki manzaka na mikanda misato mpo na kondima kotila na botosi na lingomba yango.

"Ezali mbala ya yambo, na stratégie na biso ya sika ya PPRD, ministre avant akota, akotiya manzaka na mikanda," elobi M. Ramazani.

Président Tshisekedi atiyaki manzaka na mikanda ya nkombo ya bato 66 baye bazali na gouvernement.

Mingi na bango bazali bilongi ya sika. FCC, lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, lizali na 42 mabonga. Mpe, CACH ya M. Tshisekedi, 23.

Bilenge mpe basi mpe bazali mingi.

XS
SM
MD
LG