Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Policier Paul Milambwe atatoli mpo na liwa ya Chebewa na Haute cour militaire na Kinshasa


Ba policiers na bosambisami ya Folribert Chebeya na boloko bonene ya Makala na Kinshasa, 17 septembre 2015.
Ba policiers na bosambisami ya Folribert Chebeya na boloko bonene ya Makala na Kinshasa, 17 septembre 2015.

Policier Paul Milambwa oyo alobaka ete alandaka na écran ya surveillance bobomi ya mobundi ya makoki mabomoto Floribert Chebeya na mosungi wa ye Fidèle Bazana atatolaki mercredi na bosambisami na Haute Cour militaire na Kinshasa

Policier milambwe alobi "mitindo miwutaki na mokonzi ya mboka ya kala", kolanda litatoli lya ye.

Azalaka mosali ya secrétariat mpe protocole na bureau ya général John Numbi mokonzi ya police nationale ya ntango wana.

Alobaka kala ete amonaka ndenge baniinga baye bazalaki kofina na nkingo Floriber Chebeya mpe Fidèle Bazana.

Akimaka mboka kasi andimaki kozonga mpo na kotatola.

Akweyisama na likambo na bosambi ya yamgo.

XS
SM
MD
LG