Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procès Chebeya: Gén. Djadjidja awangani ete nzoto ya Bazana ekundama na lopanga na ye


FILE - human rights activist Floribert Chebeya Bahizire speaks during a seminar in Kinshasa, Congo.
FILE - human rights activist Floribert Chebeya Bahizire speaks during a seminar in Kinshasa, Congo.

Général Zelwa Katanga oyo abengamaka général Djadidia awangani liboso lya ba zuzi ete nzoto ya Fidèle Bazana ekundama na lopango na ye.

Général Djadidia azalaki mercredi na bosambisami mpo na litatoli na bobomi ya mobundi ya makoki ya bomoto Floribert Chebeya na Feidele bazana mosungi wa ye.

Generel Djadjija atangama na koloba été Fidele Bazana akundamaki na lompagno ye.

Mokonzi ya basoda oyo aboyaki yambo koloba mpe na nsima awanganaki, elobi Actualité.cd.

Awangi likambo lyango.Bosambisami bokoya bokozala le 10 novembre mpo kokita na esika elobama Bazana akundama.

Basambi basusu balobaki ete général azali moninga ya géné John Numbi, kambo ya police ya ntango wana oyo akima mpe afundama na basusu kobengisa M. Chebeya ya la Voix de Sans Voix na rendez-vous na butu eye matambwisi ya lingomba liye lya makoki ma bomoto akufaki.

XS
SM
MD
LG