Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa ya Chebeya na Bazana: Général Djadjidja na commission supérieur Ngoyi Kenga babengisami kosamba mercredi


Ba policiers na bosambisami ya Folribert Chebeya na boloko bonene ya Makala na Kinshasa, 17 septembre 2015.
Ba policiers na bosambisami ya Folribert Chebeya na boloko bonene ya Makala na Kinshasa, 17 septembre 2015.

Général Djadjidja, na policier Christian Ngoyi Kenga Kenga, commissaire supérieur ya police, babengisami le 20 octobre na bosambisami mpo na bobomi ya mobundi ya makoki ma bomoto Floribert Chebeya na mosungi wa ye Fidele Bazana ya VSV, la voix des sans Voix (VSV).

Mercredi, policier Jacques Mugabo atatolaki ete azalaki na bobomi bwango.

Général Djadjidja, oyo nkombo na ye ya solo ezali Zelwa Katanga, atangama mbala mingi, lokola mpe na bosambisami ya lobi loleki, mpo matatoli mingi maloba ete nzoto ya Fidèle Bazana ekundamaki nde na ferme na ye.

Bosambi bwango bozongelaki mercredina Haute cour militaire na boloko ya N’Dolo, na Kinshasa.

Na ngambo na ye, policier Christian Ngoyi Kenga Kenga mokambi ya bataillon Simba eye ezalaki na nse ya bokonzi ya général John Numbi mokonzi ya police nationale na ntango ya bobomi ya Chebeya na Bazana, aboyaki kobima na cachot na ye kokende koyanola nabazuzi.

Mercredi moko na ba policers na nkombo ya Jacques Mugabo andimaki ete azalaki na bobomi bwango. Toyoka ndambo ya litatoli lya ye.

XS
SM
MD
LG