Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procès ya liwa ya Chebeya: Policier moko andimi ete azalaki na bobomi ya babundi ya makoki mabomoto


Mobundi ya makoki ma bomoto, mokmabi ya VSV, Floribert Chebeya, na Kinshasa, janvier 2010.(AP Photo/Marcel Shomba Okoka)
Mobundi ya makoki ma bomoto, mokmabi ya VSV, Floribert Chebeya, na Kinshasa, janvier 2010.(AP Photo/Marcel Shomba Okoka)

Policier Jacques Mugabo andimi mercredi liboso lya Haute Cour militaire na boloko ya N'dolo (Kinshasa), na bosambisami mpo na liwa lya mobundi ya makoki ma bomoto, Floribert Chebeya, na mosungi na ya Fidèle Bazana, ete azalaki na bobomi ba bango.

"Nazalaki na bobomi na bango. Nsima na koboma bango, totiaki nzoto ya M. Chebeya, ezanga bomoi, na motuka na ye eye tokendaki kotika pene na nzela mosika te na Mitendi," etatoli policier Mugabo, kolanda Radio Okapi.

"Mpe nzoto ya Bazana, tokundaki yango na ferme privée moko ya général Djadjidja," ebakisi policier Mugabo.

Litatoli ya policier Mugabo, likeyi kolanda lokola ba policiers basusu bakima, baye balobaka na VOA Lingala, lokola Paul Milambwe na Hergile Paul Ilunga mpe basusu.

Policier Mugabo andimi mpe ete manso masalamaki na bokambi ya Christian Ngoy Kenga Kenga ya bataillon Simba eye esangisakki bango banso na nse ya général John Numbi oyo amonanaka te, mpe esika azali eyebani te.

Policier Ngoy Kenga Kenga oyo akangama ye mpe lokola, atikalaki mercredi na ndako ya boloko na ye mpe aboyaki kokende koloba na bazuzi na bosambisi.

Nsima na bobomi, etatolaki policier Mugabo, ba policiers banso bakendaki kosepela na ndako ya colonel Daniel Mukalayi mpe moko apesamaki mbano ya 50$.

Bosambisami mpo na bobomi ya MM Chebeya na Bazana bozongeli mpo ya mbala ya misato.

Mbala mibale eleka bato basusu bakangamaki mpe général Numbi akendaki kaka kopesa sango kasi nsima na yango alimwa wuto bazalaki koluka mpo na kozongela bosambisami mbala ya misato.

Matatoli mingi malaboka ete M. Chebeya (mokambi ya ONG VSV, la Voix des Sans Voix) na mosungi wa ye M. Bazana, balimwaka nsima na rendez-vous to bokutani bapengesiamaki mpo na masolo na mokambi ya police ya ntango wana, général Numbi.

XS
SM
MD
LG