Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobomi ya Chebeya ba Bazana: Général "Djadjidja" akangami


Floribert Chebeya Bahizire, Kinshasa, 2 juin 2010.
Floribert Chebeya Bahizire, Kinshasa, 2 juin 2010.

Général Zelwa Katanga oyo abengamaka "Djadjidja" atiami na bokangami nsima na Auditorat militaire kosilisa bolukiluki mpo na liwa lya babundi ba makoki ma bomoto Floribert Chebeya na Fidele Bazana, elobi bayi misala mya bosembo.

Banzeneneke balobaki na auditorat militaire ete Fidele Bazana akundamaka na lopango ya général Djadjidja.

Général Djadjidja asi apekisamiaki kobima mboka mpo na bolukuluki botalaki ba elicoptere mibale ya mampinga ekweyaki na Tshopo.

Banzeneneke baike mpe batatolaki na VOA Lingala kozala baye bazalaki na babomaki ba babundi baye babale ba mabomoto.

Avis de recherche to mokanda ya kolukisa gén. Numbi mosi mobimisama. Gén. Numbi akima mpe amonanaka lisusu te wuto sanza ya misato.

Nzoto ya nkondo Chebeya ekutamaki le 1er juin 2010 na Mitendi (na Kinshasa) nsima na lya liwa lya ye ntango abengismaka na mpokwa yambo na yango na Inspection générale ya police na Kinshasa, mpo na masolo na gén. Numbi.

Nzoto ya nkondo Bazana emonana te.

Kasi ba policiers baike bayebisaka na VOA Lingala ba sanza bileki ete bazalaka na bobomi ya bato baye babale na etinda ya gén. Numbi oyo akimisaki bango nsima na yango na Lubumbahsi.

Bosambisami bosalama mbala mibale mpo na liwa liye kasi gén. Numbi atelemaka liboso lya bazuzi bo’ monzeneneke kasi afundama te pe akanga ma te. Batu basusu, basungi baye, bakangama mpe bazali kolekisa etumbu na bango na boloko ya CPRK Makala.

Gén. Numbi alongolamaki na ebonga ya Inspecteur général ya mampinga na juillet 2020, nsima bokoti ya président Félix Tshiskedi na ebonga ya bokonzi.

XS
SM
MD
LG