Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Auditorat esilisi enquête ya liwa ya Chebeya mpe elingi kosenga bosambisami ya John Numbi


FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.
FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.

Bayi misala mya bosembo bayebisi ete bolukiluki bozalaki kosalama likolo lya mokambi ya kala ya Police nationale ya RDC, général John Numbi, mpo na liwa lya mobundi ya makoki ma bomoto Floribert Chebeya na mosungi wa ye Fidèle Bazana, bosili.

"Auditorat militaire (parquet) ekotika mokanda ya kosenga bosambisami ya général Numbi nsima mikolo misato," elobi moko na bayi misala mya bosembo atangami na AFP.

Kolanda moyi misala mya bosembo, banzeneneke baike mpe bato basusu bazalaki na liwa lya babundi babale ba misala mya bosembo baye batangaki gén, Numbi.

Nzokande avis de recherche to mokanda ya kolukisa gén. Numbi mosi mobimisama. Gén. Numbi akima mpe amonanaka lisusu te wuto sanza ya misato.

Nzoto ya nkondo Chebeya ekutamaki le 1er juin 2010 na Mitendi (na Kinshasa) nsima na lya liwa lya ye ntango abengismaka na mpokwa yambo na yango na Inspection générale ya police na Kinshasa, mpo na masolo na gén. Numbi.

Nzoto ya nkondo Bazana emonana te.

Kasi ba policiers baike bayebisaka na VOA Lingala ba sanza bileki ete bazalaka na bobomi ya bato baye babale na etinda ya gén. Numbi oyo akimisaki bango nsima na yango na Lubumbahsi.

Bosambisami bosalama mbala mibale mpo na liwa liye kasi gén. Numbi atelemaka liboso lya bazuzi bo’ monzeneneke kasi afundama te pe akanga ma te. Batu basusu, basungi baye, bakangama mpe bazali kolekisa etumbu na bango na boloko ya CPRK Makala.

Gén. Numbi alongolamaki na ebonga ya Inspecteur général ya mampinga na juillet 2020, nsima bokoti ya président Félix Tshiskedi na ebonga ya bokonzi.

XS
SM
MD
LG