Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Auditeur général ya Haute cour militaire atindi bolukisami ya John Numbi


FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.
FILE - Former Kinshasa police chief, John Numbi, speaks while in court, Jan. 27, 2011.

Auditeur général ya Haute cour militaire atindi bolukisami bwa général d’armée John Numbi Banza mpo na liwa lya mobundi ya makoki ma bomoto Floribert chebeya na mosungi na ye Fidèle Bazana ya VSV (Voix des sans voix) mibu 11 mileki.

"Bosengami kolukisa mpenza mpo na kozwa moto nkombo na ye mpe pete na ye ezali général d’armée Numbi Banza Ntambo," elakisi mokanda auditeur général ya Haute cour militaire, lieutenant général Lucien René Likulia atie manzanga.

Mokanda mwango molobi polele ete général Numbi alukisami mpo na bosangani na bato mabe mpe mpo na bobomi bwa Floribert Chebeya na Fidèle Bazana.

Lieut. Gén. Likulia atindi ete soki gén. Numbi azwami bakanga ye na nzoto mpe bamema ye na Office ya auditorat général.

Moto nyonso abombaki ye, apesaki ye esika ya kolala to ya komibatela mpe asengami kokangama.

Ba ONG ya makoki ma bomoto bayebisaki na sanza ya misato ete gén. Numbi amonanaka lisusu te.

ONG ACAJ elobaki kutu g♪0n. Numbi akoki kozala na Zimbabwe epayi wapi akima.

Gén. Numbi atangamaki na bosambi bobale bosalamaki mpo na liwa lya MM. chebeya na Bazana kasi atikala kokangama te kasi akendaki kaka kosepesa sango.

Nzokande ba policiers baike batatolaki na VOA Lingala na sanza mibale ete bazalaki na bobomi ya MM. Chebeya mpe Bazana mpe général Numbi abombaki bango na ferme na ye ya Lubumbashi kasi bayebaki kokima mikolo mileki.

XS
SM
MD
LG