Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Police epanzaki bato batambolaki nzinganzinga na Bemba mpo na koboya Malonda


Jean-Pierre Bemba azali kotambola na kati ya bituluku ya bato mpo na koboya bondimami na Assemblée nationale ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI, na Kinshasa, 13 juillet 2020. (Twitter/Coalition Lamuka)
Jean-Pierre Bemba azali kotambola na kati ya bituluku ya bato mpo na koboya bondimami na Assemblée nationale ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI, na Kinshasa, 13 juillet 2020. (Twitter/Coalition Lamuka)

Police epanzaki mbala mibale, na molinga mpe lokito, bituluku na bato batambolaki nzinganzinga ya Jean-Pierre Bemba na ntina ya kotelemela bondimami ya Ronsard Malonda bo’ mokambi ya CENI. Mbulamatari eboyaki botamboli bonso.

Bituluku na bato babandaki botamboli na quartier na Pascal na Kinshasa kasi police ekangelaki bango nzela na pont (gbagba) ya Matete.

Ba policiers bakotisaki Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC mpe moko na bakambi bwa lingomba Lamuka na motuka mpe bapetaki masasi mpe lokito mpo kopanza baye bazalaki kolanda na makolo.

Bakumbi tukutuku nde bakobaki na kolanda.

Na balabala monene ya Libération, police ebetaki lisusu molinga mpe lokito mpe ebanzaki ndambo ya bakumbi tukutuku, ba nkama, baye bazalaki kokoba kolanda M. Bemba.

"Mwa kimya na etando mobimba ya ekolo, moto moko te akufi, yango topesa fololo na bayi police nationale ya Congo. Bato banso bakangamaki batikami longola kaka ba kuluna," ekomi Police nationale congolaise na Twitter na yango.

Police elobi ete bililingi ya mowei na Bukavu (Sud-Kivu) bizali kotambola ya na réseaux sociaux esengeli etalama lokola lokuta.

Na bituka mingi, police etikelaki bato kotambola te kolanda mokano ya état d’urgence mozwamaki wuto sanza minei na ntina ya kopekisa bopanzani bwa COVID19.

Na Katanga, bakambi ya Lamuka bapusi botamboli bwango na mokolo mosusu mpo bokengi.

Le 9 juillet bato bakufaki mibale, moko na Kinshasa mpe mosusu na Lubumbashi, na botamboli UDPS ebengisaki. Biloko mingi bibebisamaki.

Mbulamatari atindi bazuzi kolandela bato basalaki mobulu na botamboli bwa UDPS.

XS
SM
MD
LG