Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba, Fayulu, Katumbi na Muztio batomboki mpo na Ass. Nat. endimi boponami ya Malonda na kokamba CENI


Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo etiyami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)
Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo etiyami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)

Bakambi ba Lamuka batomboki nsima Assemblée nationale kondima bobonami ya Ronsard Malonda lokola mokambi ya sika CENI.

Jean-Pierre Bemba, Martin Fayulu, Moïse Katumbi mpe Adolphe Muzito bakomi na liyebisi ete bazali kobongisa linaka ya milulu mpo na kotelemela mokona ya Assemblée nationale.

"Lamuka elongo na mangomba malingi mbongwana bazali kosenga bana ya Congo kotelemela na makasi nyonso lokuta eye elingi kowumisa système efandisama likolo ya makambo mabe," ekomi bakambi banei baye ya lingomba Lumuka.

Nzokande, mangomba maike ya société civile lokola Lucha, Filimbi, Comité laïc de coordination mpe Congo débout babengisi bana ya Congo kokita na Echangeur Limete, na Kinshasa, samedi mpo na koboya boponami bwa M. Malonda, secrétaire exécutif national technique ya CENI na bokambi na misala mya maponami na RDC.

Ba députés ya CACH lokola mpe baye ya mongomba ya opposition MLC-AND, Ms-G7 na AMK et alliés basakoli ete bondimami na plénière ya Assemblée nationale ya boponami ya Ronsard Malonda mpo na kokamba CENI bozali mpamba. Basengi na Cour constitutionelle kotika te Ronsard Malonda alapa ndayi mpe na président Tshiskedi kovandisa ye te na ebonga. Biyamba biike lokola bakatoliko, ba protestants mpe sika bakimbauistes bango mpe baboyi Ronsard Malonda.

Rapporteur to molobeli ya Assemblée natinale, Célestin Musao ayebisi VOA Lingala ete bakambi ba biyamba nde baponaki M. Malonda kasi Assemblée nationale esalikaka molosa na yango kondima.

XS
SM
MD
LG