Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ya bituka bapesi ndingisa te na botamboli


Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.
Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.

UDPS, lingomba ya président Félix Tshisekedi, ebengisi bato kotambola jeudi 9 juillet mpo na kotelemela  bobonami ya Ronsard Malonda na bokambi ya CENI ; PPRD ya Joseph Kabila, mokonzi ya kala, esalaki linaka lya kotambola mikolo misatu ; kasi bakambi ya bituka bapesi ndingisa te.

Bakambi ya bituka bayanoli ete botamboli bokobuka mikano ya kopekisa bobanzani ya COVID19.

Gentiny Ngobila mokambi ya etuka ya Kinshasa akundoli ete mokonzi ya mboka Tshisekedi apekisaki milulu ya bato baleki 20.

"Milulu bolingi bosala wuto mercredi 8 kino vendredi 10 juillet mizali kotambola te engembene na mikano miye. Yango, na koki te kondima," ekomi na eyano na ye, M. Ngobila.

Kasi bayi UDPS bazongisi ete bakotambola kaka "mpo Buku likonzi esengi te ete bakonzi bapesa nzela kasi toyebisa nde bango," elobi secrétaire général ai ya UDPS, Augustin Kabuya.

Na bituka misusu lokola na Haut-Katanga na Lwalaba, bakambi basakoli bokangami to "confinement" ya bato mikolo minei kino mokolo ya mposo.

Bayi CLC (Comité laïc de coordination) bango mpe balingi kotambola le 9 juillet.

Bayi PPRD balobi botamboli na bango bokozala mpo na kopesa maboko na ba instuttitions.

Baye Lamuka mp bakani kotambola le 13 juillet. Balobi bakotambola ata bakonzi bapesi nzela te. Bazali kotelemela boponami ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI mpe mabongisi ma mikano mya kokonza bazuzi mibongisami na ba députés ya FCC Aubin Minaku na Garry Sakata.

XS
SM
MD
LG