Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

HRW esengi enketi mpe epameli mampinga na kotelemela batamboli


Batamboli basangani pene na paliciers na Kinshasa, 9 juillet 2020.
Batamboli basangani pene na paliciers na Kinshasa, 9 juillet 2020.

Human Right Watch epameli mampinga ya Ekolo Congo démocratique mpo ekitaki o’balabala jeudi na botamboli ya baye balandaki mbela ya UDPS mpo na kotelemeka botiamy ya Ronsard Malonda na bokambi ya CENI.

"Mampinga, mabongisama te mpo kokamba bituluku na bato, esengelaki te etindama mpo na kotia alima na bato bazalaki kotombola," ekomi na Twitter Thomas Fessy, moluki monene mpe molakisi elongi ya HRW.

Human Right Watch epameli mampinga mpo na kokita na bisika bike na botamboli ya jeudi, lokola na Haut-Katanga mpe na Lwalaba.

Police nationale ya RDC elobi kaka bato babele nde bakufaki kati na baye basalaki mobulu. Moko na Kinshasa mpe mosusu na Lubumbashi. Bato bango bakufi ntango balingaki kopunza, kolanda PNC.

Molebeli ya PNC, Pierrot Mwanamputu ayebisi ete koleka bato zomi na mobulu yango.

HCR, mabongisi maye ma makoki ma bomoto, epameli mpe batamboli mpo na mobulu basalaki mpe esengi enketi to bolukiluki, ebakisi M. Fessy.

Biloko biike bibebisamaki. Ndako ya parti politiki mibale, PPRD na PT ezikisamaki. Tempelo ya Armée de l'Eternel ya évangéliste Sony Kafuta mpe ebebisamaki.

HRW elobi bakonzi ya Congo basengelaki te kosalela état d’urgence etiamaki mpo na COVID19 lokola nzela ya kopekisa botelemeli ya politiki mpe bonsomi ya maloba ya bato.

XS
SM
MD
LG