Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cardinal Ambongo asengi kotelemela mikano mya kokonza ba zuzi mpe mya kotia bakonzi ya CENI na makasi


Président Félix Tshisekedi na mopanzi ya cardinal Fridolin Ambongo na stade des martyrs, Kinshasa, 17 novembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na mopanzi ya cardinal Fridolin Ambongo na stade des martyrs, Kinshasa, 17 novembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Cardinal Ambongo, episkopo ya lokumu ya Kinshasa, apaleli bayi bolitiki balingi bakoba kokonza mboka mpo na bolamu bwa bango moko kasi ya bana mboka te.. Alobi yango na mateya maye mpo na mibu 60 ya lipanda ya RDC.

Episkopo ya lokumu ya archidiocèse ya Kinshasa asengi na bana ya Congo kotelemela baye bakolinga kotia na makasi mibeko mya kobongola misala mya bosembo mibongisami na Assemblée nationale mpe mokambi ya CENI

"Mikolo mikoya mikozala ya mpasi. Nalingi nasenga na bana ya mboka komibongisa na ntina ya kotambola. Ntango ngonga ekobeta, ntango bakomeka kolekisa na makasi mibeko mina mpe bato ba bango na bokambi CENI, ekosengela bakuta biso na nzela na bango," elobi cardinal Ambongo.

Mibeko misato mipesami na Aubin Minaku na Garry Sakata ya PPRD mizali kotalama na Assemblée nationale na ntina ya kopesa makoki na ministre ya mambi ma bosembo makoki ma kokonza ba zuzi to parquet. Mposo moleki bato baike betelemelaki yango mpe mobulu mozalaki na mboka.

Mpo etali CENI, bakambi ba biyamba bazali koyokana te. Motoba kati na mwambe baponaki Ronsard Malonda, secrétaire exécutif national ya CENI mpo na azala mokambi ya CENI kasi bakatoliko na ba protestants baboyi mpo azalaki na lipinga lya kala lifundami na kaniaka na maponami ma lekaki. Bakibanguistes mpe bakoti na ngambo ya bakatoliko mpe baprotestants nsima na kondima M. Malonda.

Na mateya maye mokambi ya archidiocèse ya Kinshasa apameli lolenge bakonzi bazwaka mokonzi mpe bakamba.

Cardinal Ambongo apameli bakonzi mpo bakotaka na bokonzi na Congo na makasi, na bitumba to na ndenge ya mayele mabe to lokuta mpe na kotiyaka misala ya moyimi na bokambi mpo na bango moko na esika ya koluka bolamu bwa bana ba Congo banso.

"Bakanisi ete bazali na eyano ya kopesa bana mboka te, mpo ezali te na nzela na bango nde bakomi na bokonzi. Bazali ata nanyongo moko te na bana ya mboka baye. Bakisa na yango bizaleli ya bozangi etumbu mpo na bato banene. Bapesa etumbu na bato bake baye bayibi soso, babeki basusu, batie bango na Makala. Mpo na bato banene, bozangi etungu. Malamu nde mpo makambo makomi kobongaloma mwa muk," elobi cardinal Ambongo..

XS
SM
MD
LG