Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba, Fayulu, Katumbi na Muzito babengisi botamboli le 13 juillet mpo na kotelemela Malonda


Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)
Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)

Bakambi ba lingomba Lamuka basengi bato kotambola lundi 13 juillet na Kinsahsa mpe bituki misusu mpo na kotelemela bondimami ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI.

Jean-Pierre Bemba, Martin Fayulu, Moïse Katumbi na Adolphe Muzito basengi yambo mbongwana ya ba institutions mpe audits ya misolo isala mya CENI.

"Bato batelemela boponami na bokambami ya CENI ya mosali moko ya FCC oyo asalaki ete maponami mayibama wuta 2006," ekomi bakambi ba Lamakua na liyebisi.

MM, Bemba, Muzito, Katumbi na Fayulu bapameli bayi FCC na liyebisi mpo koluka kotiya nde ba toba bango na ntango ya maponami na esika ya bana Congo.

Batelemeli mpe mikano misato ya mibeko mibongisami na Aubin Minaku mpe Garry Sakata mpo na bazuzi.

Nzokande UDPS, lingomba ya pilitki ya président Félix Tshisekedi, yango ebengisi botamboli o'mokolo mwa minei 9 juillet se mpo na koboya M. Malonda.

Ndenge moko mpe bayi CLC, Comité laïc de coordination, bango mpe basengi bato kokita o'balabala se mokolo moko wana ya jeudi 9 juillet mpo na kotelemela M. Malonda.

XS
SM
MD
LG