Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nationale endimi Ronsard Malonda lokola mokambi ya CENI ya sika


Ronsard Malonda, Secrétaire Exécutif national ya CENI, aponmi mpo na kokoma mokambi na yango, awa le 4 septembre 2018. (Facebook/CENI RDC)
Ronsard Malonda, Secrétaire Exécutif national ya CENI, aponmi mpo na kokoma mokambi na yango, awa le 4 septembre 2018. (Facebook/CENI RDC)

Plénière ya Assemblée nationale endimi Ronsard Malonda lokola mokambi ya CENI ya sika. Nzokande bakambi ba biyamba nanu bayokani te mpo kopona moto moko akozwa esika ya Corneille Nangaa.

Likita lya bakeli mibeko lindimi rapport ya mabonami masalamaki na bakambi ya biyamba.

Kasi na masolo mabango, bakambi ba biyamba bokoki na nanu te koyokana mpo na nkombo moko.

Cardinal Fridolin Ambongo mpo na bakatoliko mpe Mgr André Bokundowa mpo ba protestants batelemelaki boponami ya M. Malonda, secrétaire exécutid national ya CENI mpo na kokamba CENI.

Biyamba motoba misusu bitikali baponaki M. Malonda. Kasi bakambi ba eyamba ya Kimbaguiste bamilongolaki nsima na ntango mpe baboyaki ye.

O’mokolo mwa lipanda, cardinal asengaki ban aya Congo komibongisa kokita o’balabala ntango Assemblée nationale ekolekisa na makasi moto andimami te na banso.

Bazali kofunda ye na kaniaka mpe mbeba ya moyibi na maponami maleka. Ba ONG baike mpe balobi yango.

XS
SM
MD
LG