Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na ba "Sages-femmes" 100 bazwi mbano mpo na kobikisa bomoi ya basusu na Kinshasa


Basi babotisa basusu na milulu mya bopesameli bango mbano na Kinshasa, RDC, 4 décembre 2020. (VOA/Nathalie Sekabuhoro)
Basi babotisa basusu na milulu mya bopesameli bango mbano na Kinshasa, RDC, 4 décembre 2020. (VOA/Nathalie Sekabuhoro)

Pene basi nkama baye babotisaka basusu mpe basungaka bana bapesami mbano mpo na kondima mosala basalaka, na milulu na Kinshasa, vendredi o’mokolo molongo mokanisaka bango.

Milulu myango misalaki na lisungi lya OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongo), UNFPA ( Misala mya ONU mpo na mabota mpe bato) elongo na ministère ya Bokolongo.

Dr Eteni Longondo, ministre ya Bokolongono, apesaki basi babotisaka lokumu mpo bamipesa na kosunga ba mama mpe bana bake, na kobikisa bomoi ya basusu na kopesaka mangwele mpe mateya matali bokolongo, na kosunga bampaka, mpe na kopesa lisalisi na baye bazali na bosenga ya nzoto.

Esengeli tondima bango mpe tondondo bando, ebetaki sete Dr. Eteni.

Kolanda mokambi ya UNFPA Dr Sennen Hounton, motango mwa bato bakufaka na kobota mozali 473 likolo na nkoto yoko ya baye babikaka nsima na kobotama.

Dr. Hounton akanisi ete motango moye molakisi bozangi bonene ya basali bayebi mosala mpe bayekola yango malamu lokola mpe bozangi ya bisaleli mpe nkisi to mino ya kobikisa bomoi ya basi na zemi mpe bana baye bawuti kobotama, ndenge moko na bozangi bisika bisengeli mpo na kobotisa basi.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG