Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basali ya bitumba na Ebola na COVID19 batiaki moto na esika basalaka na Mbandaka mpo na lifuta


Basali ba bokolongono batie moto na bahema (tentes) mpo na kosenga lifuta lya bitumba na Ebola na COVID19 na Bandaka, Equateur, RDC, 17 aout 2020. (VOA/Chrsitophe Yoka)
Basali ba bokolongono batie moto na bahema (tentes) mpo na kosenga lifuta lya bitumba na Ebola na COVID19 na Bandaka, Equateur, RDC, 17 aout 2020. (VOA/Chrsitophe Yoka)

Basali ya bitumba na Ebola na COVID19 batiaki moto lundi na esika basalaka na Mbandaka, na Equateur, mpo na kosenga lifuta lilamu.

Basali bango bazalaki na kanda makasi mpe batiaki moto na bah ema (tentes).

"Bazo futa biso ba dollars minei (4$) na mokolo. Toyaka awa banda 6 heures ya ntongo kino 20cheures ya mpokwa. Tokondima barème na bango balingi bapesa biso te," elobi na nkanda, na correspondant ya VOA Lingala, mosali moko na esika yango.

"Tolingi batiela biso barème baselelaki na Beni to Goma. Toza ba responsables. Totie moto moye mpo président Félix Tshisekedi ayoka mpe abongisa makambo mabe ministre ya Santé asali," elobi mosali yango.

Basali yango bazali kosala mobulu wuto mposo mibale.

Bazali kosenga lifuta na bango mpo na sanza misato.

Bisika misusu mpe na Ekolo Congo démocratique basali ba bokolongono mpe bazali kosenga lifuta na bango.

Na Kinshasa, na Goma mpe na Sud-Kivu minganga mpe basali misusu bazali kokita o’balabala mpo likambo moko wana.

XS
SM
MD
LG