Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Dr. Oly ilunga asimbami na police


Dr. Oly Ilunga ministre ya kala ya bokolongno, na Kinshasa, 20 décembre 2018.
Dr. Oly Ilunga ministre ya kala ya bokolongno, na Kinshasa, 20 décembre 2018.

Dr. Oly Ilunga, ministre ya kala ya bokolongono bwa nzorto ya Congo démocratique asimbami na police, eyebisi bakambi ya Police nationale ya ekolo eye (PNC).

Bakonzi ya police balobi ete Dr. Oly Ilunga amilengelaki mpo na kokima na Congo-Brazzaville wuta Kongo central esika wapi bakangaki ye na appartement moko.

“Akotindama o’mokolo mwa yambo le 16 septembre 2019 na parquet général ya Cour ya cassation,” ekomi PNC na liyebisi likomelali VOA Lingala.

Sanza moko ekoki te, ministre ya kala ya bokolongono abengamaki na coordination nationale ya PNC, mpo na mbeba na bosaleli mosolo mopesamaki mpo na bokono bwa Ebola.

Bakambi ya police balobi ete nsima na koyokami ya Dr. Ilunga na police judiciaire, bakanisaki ete akokima te. “Kasi sango ekomelaki police elakisi ete alimwaki na makanisi ya kokima na Congo-Brazzaville kowuta na Kongo central na ntina ya komilongola na bolandami na ye na misala ya bosembo,” elobi PNC.

Dr. Ilunga atikaki mosala sanza mibale mileki nsima na botiyami na mosala na président Félix Tshisekedi ya Dr. Muyembe mpo na kokamba cellule technique ya bitumba na Ebola.

Dr. Ilunga mpe atelemelaki moko na mangwele ya Ebola.

XS
SM
MD
LG