Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Sec. d’Etat ya USA ya bokolongo akomi na Kinshasa

Ambassadeur ya USA na RDC Mike Hammer (G) ayambi Alex Azar, Secretaire d’Etat ya Etats-Unis mpo na mambi ya bokolongo mpe misala ya kosunga bato na bokomi na ye na Kinshasa, 13 septembre 2019. (Facebook/Ammbassade des USA en RDC)

Alex Azar, Secretaire d’Etat ya Etats-Unis mpo na mambi ya bokolongo mpe misala ya kosunga bato akomi o’mokolo ya mitano na Kinshasa, engumba mokonzi ya Congo democratique.

Na linaka na ye, esengeli ayambama na president Félix Tshiskedi. Masolo na bango mokotala lolenge Etats-Unis ekosunga RDC na nzela ya linaka ya boyakani na RDC lisalamaki na sanza ya minei ntango president Félix Tshisekedi azalaki na mobembo na Washington.

Alex Azar asi asali masolo na Dokolotoo Jean-Jacques Myumbe, mokambi ya INRB mpe secrétaire technique ya bokambi ya bitumba na Ebola.

Alex Azar akundoli, na masolo yango, ete Etats-Unis ezali kosunga mpo na kobongisa bokolongono ya bana ya Congo démocratique kasi mingi mpenza bona kosilisa bokono ya Ebola boye bobomi koleka bato nkoto mibal na tuku mitano na koleka mibu moko.

XS
SM
MD
LG