Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

OMS esengi bopesi ya mangwele ma paludisme na bana ya Afrika


Mwana moko apesami mangwele ya malaria na Ndhiwa, Kenya, 13 septembre 2019.
Mwana moko apesami mangwele ya malaria na Ndhiwa, Kenya, 13 septembre 2019.

OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono) esengi ete mangwele ya paludisme (RTS,S) mapesama na bana ba Afrika.

"Ezali likambo likotikala na lisolo! Mangwele ya paludisme ezelamaki mingi mpo na bana. Ezali bomati makasi ya science, bokolongono mpe bitumba na paludisme", elobi mokambi ya OMS, Dr. Tedros Adhanon Ghebreyesus.

"RTS,S" ezali mangwele ebundisaka parasite eye ngungi ememelaka bato.

Mangwele mango makelami na compagnie Britannique GSK.

OMS elobi ete mangwele maye mapesi elikya mpo na Afrika esika wapi koleka bana 260.000 ya nse ya mibu mitano bakufa mbula inso na paludisme to malaria.

Dr. Tedros Adhanon alobi ezali elikya mpo bobangi bozali mingi ete résistance to botelemeli ya microbe na mino to nkisi bomata lisusu makasi.

Wuto 2019, mangwele maye 2,3 millions mapesamaki na Ghana, Kenya mpe Malawi.

Bilembi bimonisi ete mangwele mango makitisi mpenza paludisme na lolenge ya makasi na 30%, elobi Kate O'Brien, mokambi ya département Vaccination ya OMS.

Mangwele mosusu maye mazali kozela kondimama, Matrix-M, maselema na Université ya Oxford, mapesaki mpe elikya na avril na kotalisa bokasi kino 77% na bomeki na yango na phase II.

Ekoki kondimama nsima na mibu mibale.

XS
SM
MD
LG