Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Munyangi azwi ndingisa ya kobanda ba essais cliniques ya mono na ye


Dr. Jêrôme Munyangi nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 12 mai 2020.
Dr. Jêrôme Munyangi nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 12 mai 2020.

Comité national ya éthique ya bokolongono ya ministère ya Santé (CNES) epesi ndingisa mpo na ba essais clinics ya protocole ya Artemisia Annua ya Dr. Jérôme Munyangi mpo na bokono bwa COVID-19.

Bomekami ya mono moye mokosalama na hôpital Monkole na Kinshasa mobu moko, banda le 15 juin 2020 kino le 14 2021, ekomi CNES na eyano epesi Dr. Munyangi.

Bomekami bwa mono yango bokosalama mpo na kotala bokasi na yango.

Dr. Munyangi asalaka mingi bolukiluki likolo ya nzete ya Artemisia eye ebikisaka boko mingi lokola malaria mpe bilharziose.

Na libandela ya COVID-19, akomelaki ba ministères mingi ya Santé na continent ya Afrika mpo na kosenga bango basalela Artemisia.

Madagascar nde eyanolaki noki mpe ebandaki kosalela yango kino ekalaki nkisi moko.

Dr. Munyangi azongaki na Kinshasa na sanza ya mitano nsima na kokima RDC mwa mibu mpo na alukami na baike na bokoma ye.

XS
SM
MD
LG