Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Munyangi : "president Tshisekedi andimi kopesa maboko mpo na tosala nkisi ewuti na Congo"


Dr. Jêrôme Munyangi nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 12 mai 2020.
Dr. Jêrôme Munyangi nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 12 mai 2020.

Dr. Jérôme Munyangi, moluki ya bokolongono oyo misala mya ye miyebana mpo nkisi ya nzete ya Artémisia, asololi mardi na président Félix Tshisekedi mardi na Cité ya Union africaine mpo boluki nkisi ya COVID19 esalami na RDC.

"Nasepeli ete mokonzi ya mboka andimi kopesa biso maboko mpo ete tozala na mono to mino mikelami na ban aba Congo mpe misalami na RDC," elobi Dr. Munyangi nsima na masalo na president Tshisekedi.

Dr. Munyangi azongaki na RDC le 7 mai nsima nan tango molayi ya kokima mboka mpo na bokengi bwa ye.

Moluki oyo ya mibu 36, ayebisaki na lisolo na VOA Lingala ete ba industries pharmaceutiques baiike balukaki kobama ye ne ekolo Congo démocraituqe mpo misala miya abimisaki na nzete ya Artémisia mpe koloba ete ebikisaka malamu mpeza na bokono ya malaria.

Ambassade ya France nde ebimisaki ye nde na kobombama na mboka.

Azalaki kosala boluki bwa ye wuto France mpe America.

Azali oyo akomaki mayela maye Madagascar ekolisi mpo na kobimisa nkisi ya kobisa COVID19.

XS
SM
MD
LG