Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bismack Biyombo basketteur ya NBA apesi million $ moko ya ba masques na RDC


Bismack Biyombo, basketteur congolais ya Charlotte Hornets na NBA na Centre Barclays na New York, na Etats-Unis, 11 décembre 2019.
Bismack Biyombo, basketteur congolais ya Charlotte Hornets na NBA na Centre Barclays na New York, na Etats-Unis, 11 décembre 2019.

Bismack Biyombo, basketteur congolais ya NBA na Etats-Unis apesi ba masques ya misolo millions moko ya ba dollars mpo na mboka na ye awuta Ekolo Congo démocratique na ntina ya kobundisa coronavirus ya sika (COVID19).

Kolanda fondation ebangami na nkombo na ye Bismark Biyombo, mosani oyo ya Charlotte Hornets atindi ba containers minei ya ba masques nkoto zomi mpe na bilamba ya kobatela nzoto nkama sambo na tuku mwambe.

Crise tozali komona nanu tomona yango te. Kotala ndenge mboka nga ezali komonyokwama na lolenge ya makasi boye, elobi Biyombo.

Mobeti basket oyo akanisi ete esengeli kozwa bisaleli mingi ya bokolongono mpo na système sanitaire ya RDC ebebisama uto mibu mingi likolo na bokono mingi lokola Ebola mpe malaria oyo bopesanaka kowuta na moto mosusu.

RDC esi ezwi bato 267 baye bayebani kozala naCOVID-19, 22 bakufi mpe 23 babikisami, kolanda INRB, Institut national ya recherches biomédicales.

XS
SM
MD
LG