Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ODEP elobi 4,5 millions ya ba dollars ekeyi na sanza mibale mpo ekolo ezali na ba PM babale


Ministre wa yambo ya sika Jean-Michel Sama Lukonde (D) na ministre azali kotika ebonga Sylvestre Ilunga Ilunkamba (G) na masolo na Kinshasa, RDC, le 17 février 2021. (Twitter/Primature RDC).
Ministre wa yambo ya sika Jean-Michel Sama Lukonde (D) na ministre azali kotika ebonga Sylvestre Ilunga Ilunkamba (G) na masolo na Kinshasa, RDC, le 17 février 2021. (Twitter/Primature RDC).

Observatoire ya Dépense ya Ekolo (ODEP) ekebisi ete misolo mingi mizali kokende mpo mboka ezali na ba Ministres wa Yambo babale.

Koleka 4 millions ya ba dollars na ndambo ekeyi na sanza mibale mpo na bozali ya ba Ministres ba yambo babale.

Président Félix Tshisekedi atiaki Jean-Michel Sama Lukonde Ministre wa yambo le 15 février nsima na kopanza boyokani kati na CACH, liboke lya nzinga nzinga na mokonzi ya mboka ya sika (Tshsiekedi), na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Kasi, Minsitre wa yambo ya kala, Sylvestre Ilunga Ilunkamba, azali kokoba kosala ata atikaki mosala mpo mbulamatari ya sika, ya M. Sama, esalami nanu te. Bango babale bazali kofutama.

ODEP ebangi ete soki sanza misatu ebakisami ekoma millions sambo ya dollars.

ODEP ekebisi mpe mpo bosalaleli misolo bozali kotindama na mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka mpe mbala esusu na mokambi ya IGF na bobuki mibeko.

Nozkande présidence esaleli 29,2 millions ya ba dollars na sanza mibale na kolekisa na 113% misolo esengelaki asalela.

XS
SM
MD
LG