Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nkanda ya Rwanda nsima na colloque moko mpo na génocide na Paris


Mikuwa ya bayike na bawei ya génocide na Rwanda, le 4 avril 2014.
Mikuwa ya bayike na bawei ya génocide na Rwanda, le 4 avril 2014.

Ambassadeur ya Rwanda na France, François-Xavier Ngarambe, alakisa nkanda nsima na colloque moko esalami na Paris likolo ya génocide.

"Bozali na ba négotionnistes (baye baboyaka kondima génocide) na Sénat, tempelo ya mibeko ya France, ekoki kondimama te. Ezali bitumba ya makasi contre bana ya Rwana, contre mémoire ya ba victimes, contre baye babika mpe batikala na mampasi," elobi ambassadeur Ngarambe na AFP.

"Esengeli te tiola malabo maye maboyi (génocide)," ebakisi M. Ngarambe.

Makambo mango masalami ntango bondeko kati na France na Rwanda ebandi kobonga nsima na botiyami ya commission ya ba historiens mpe baluki mpo na kominsa pole na misala Paris esalaki na bobamami ya 1994.

Intellectuel franco-camerounais Adrien-Charles Onana na mapanzi sango ya Canada Judi Rever bazalaki kati na bato bazwaki maloba na colloque ya Paris.

Kondima mpasi mpe mbeba ngambo mibale esalaki esali na litomba mingi mpo na kozingisa boyokani mpe mpo komonisa bosolo mpo na bato baoya nsima, elobaki Mme Rever.

Bato pene na 800.000 bakufaki kati na avril mpe juillet 1994 Rwanda, mingi ba tutsi.

XS
SM
MD
LG