Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nkanda mpe koswana mpo na nkasa ya mosolo Tshisekedi/Kabila


Milulu ya bolakisi mabongisi ya mobu moko ya mbongwana na RDC, Kinshasa, 19 décembre 2019. (VOA)
Milulu ya bolakisi mabongisi ya mobu moko ya mbongwana na RDC, Kinshasa, 19 décembre 2019. (VOA)

Lokosa ya mosolo na elongi ya Félix Tshisekedi na Joseph Kabila ebendi matata nsima na bosakolami na yango o’mokolo ya minei na mbulamatari ya Kinshasa.

Ministre près ya président ya république, André Kabanda Kana, alobi ete lokosa yango (ya 1.000 FC symbolique) lozali kosalama mpo na milulu ya kokanisa mobu moko ya mbongwana na ekolo Congo démocratique o’mokolo ya le 24 janvier 2020. Esali mobu uto mokonzi ya kala Joseph Kabila atikelaki bokonzi na Félix Tshisekedi nsima na bosakolami na ye lokola molongi ya maponami ya le 30 décembre 2018.

Ministre Kabanda ayebisi ete ekozala "billet collecteur. Ekotekama mpo na mosolo mokota na libenga ya l'Etat".

"Ekozala lolaka monument ekobombama na Banque centrale kasi ekozala na valeur nominale to valeur d’achat (ekoka te kosomba biloko). Ekozala 'lokosa colleteur' mpo na kotika elombo ya maye masalaki. Ekozala na monument ya mbongwana na ekolo. Ekolakisama na bana mboka. Tobengi yango bongo mpo ekozala mpo bato babomba yango," elimboli vice-ministre ya budget Félix Momat.

Banque centrale esengeli endima lokosa yango.

Kasi yango ebendi nkanda ya bato mingi.

"Nkanda makasi mpo na makambo ya motindo maye maselemi kaka mpo ete bango babale bamibatelaka na nsima ya kimya, boyokani mpe bosangani. Moto mabe ! akoki soki moke te bapesa ye lokumu mpo na nsoni ayokisi na mboka ! Lisitwale ezalaka motu makasi," ekomi na Twitter na nkombo ya lingomba Filimbi, Carbone Beya.

Lucha (Lutte pour le changement) mpe elobi likambo ya mwa lolenge se moko.

"…Esengeli bato banso batelema mpo na kosukisa bolema boye!," ekomi LUCHA na Twitter.

Bayi politiki mpe batomboki.

Noël Tshiani oyo azalaki moko na ba candidats ya présidentielle na décembre 2018 abengi yango "buzoba ya mboka!"

"Buzoba ya boye ekoki te kosalama ata mosolo mwango mozali na mpifo te. Ndenge nini Banque centrale ya Congo mpe mbulamatari ya RDC bakoki kokweya na nse boye na ekeke ya 21 ? Nayoki mposa namiboma," esiliki Noël Tshiani.

Bayi Lamuka, bango, bapesi nanu te makanisi mabango.

Bakonzi ya mboka nzike babengisami na milulu myango mya le 24 janvier 2020. Mbulamatari elobi ekobimisa misolo 6 millions ya ba dollars mpo na yango.

XS
SM
MD
LG