Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ngobila azwi bokambi ya Commission spéciale ya boyokani kati na Brazzaville na Kinshasa

Gentiny Ngobila (g) mokambi ya engumba Kinshasa na mokokani wa ye ya Maire ya Brazzaville, Sieudonné Batshimba (D) bazali kopesana bokonzi ya Commission spéciale ya coppération kati na ba Congo mibale, na Brazzaville, 9 juin 2021. (Gouvernorat Kinshasa)

Mokambi ya Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC, Gentiny Ngobila, azwi bokambi ya  Commission spéciale ya Cooperation (Cospeco) na suka ya 22e assemblée générale to likita linene lisalamaki wuto le 8 kino le 9 juin na Brazzaville.

M. Ngobila akitani na maire ya Brazzaville, M. Dieudonné Batshimba mpo na mibu mibale.

Likita lya Cospeco lisalamaki na ntina ya kobongisa bokelami ya film documentaire ya Romba ya Congo lokola ezali kondimama bomemngo ya ntoki ya mokili.

Congo-Brazzaville na RDC basengaki na Unesco kondima Rumba ya Congo lokola bomengo ya molongo.

Likita lyango mpe lilakisabondeko na bavandi ba Goma baye bazwai le 22 mai likama lya botomboki ya volcan Nyiragongo.

XS
SM
MD
LG