Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Session extraordinaire ya Assemblée provinciale ya Kinshasa ekozala te mpo na COVID-19 (Godé Mpoy)


Godé Mpoy Kadima
Godé Mpoy Kadima

Mokambi ya Assemblée provinciale ya Kinshasa, Godé Mpoy asakoli ete session extraordinaire ekozala te mpo na COVID-19. Nzokande bakeli mibeko baike bazalaki kozela bobengisami ya session extraordinaire mpo na kotika mokanda ya kosenga bolongwi na ye.

"Kolanda mikano mitali mbonge ya mibale ya bokono bwa COVID-19, miye mipekisi bosangani ya koleka bato 10, tozali na makoki te kobengisa likita bo' momesano," ekomi motambwisi ya Assemblée ya Kinshasa.

M. Mpoy akundoli été sessio ordinaire ya septembre esukaka le 29 décembre mpe asakoli suka ya sessio eye ebandaki.

Lobi loleki liboke lya bakeli mibeko bazalaki kobongisa mokanda ya kosenga bolongwi na ye, balobaki ete bazwaki ntango te ya kotika pétition yango mpo esengalaki kolekisa yambo budget. Budget yango endimami ya 724 milliards Francs congolais.

Basusu balobi ete ntina ya kolongola ye ezali lisusu te mpo M. Mpoy mpe andimi kokota na Union sacrée, lingomba mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi azali kokela mpo na kozwa majorité ya sika na ba institution mpe koyeba kokamba malamu.

Bakeli mibeko yango mpe bakanelaki mokambi ya engumba mpe etuka ya Kinshasa Gentiny Ngobila.

Kasi ye mpe lokola akotia na Union sacrée.

XS
SM
MD
LG