Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakoni ya COVID-19 bakomi 18


Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)
Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)

Bato banei basusu  ya bokono ya coronavirus ya sika bazwami, eyebisi ministre ya bokolongono Dr. Eteni Longondo na compte Twitter na ye.

"IRNB epesaki bilembo na bango lobi na butu. Bazali bango banso ba Congolais, moko awutaki France, emonani lokola azwaki bokono nde kuna. Basato basusu vazwi bokono bwango na ekolo Congo démocratique. Motango ya bakoni bayebani na coronavirus ya sika mokomi zomi na mwambe," ekomi Dr. Longondo.

Uta lelo nde mpepo inso mpe masuwa manso makowuta bikolo bisika COVID19 ezali kongala makokita to makokota lisusu te na mabela ya ekolo Congo décomcratique lokola mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi asakolaki yango mikolo mibale mileki.

Mikano mya lolenge moko mpe mibandi kotiyama na misla mpe na ngambo ya Congo-Brazzaville.

XS
SM
MD
LG