Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Milulu mya kondima elonga ya Biden mikatami mpo na eyoma ya balandi ba Trump na Congrès


Balandi ba président Donadl Trump bakotaki na Capitol na Congrèes, na Washington mpo na kopekisa milulu mya bondimi elonga ya Joe Biden, Washington, 6 janvier 2021.
Balandi ba président Donadl Trump bakotaki na Capitol na Congrèes, na Washington mpo na kopekisa milulu mya bondimi elonga ya Joe Biden, Washington, 6 janvier 2021.

Congrès ya Etats-Unis ekataki milulu mya bondimi bilembo mya maponami mpo na eyoma ya balandi ba président Donald Trump oyo azali kokoba koboya elonga ya Joe Biden,. Police ebimisi bato na lombango na bureau ya Congrès mpo eyoma ya balandi ya Trump

Ba policiers babimisaki bato na lombango na ba bureaux mingi ya Congrès mpo na eyoma balandi ba président Donald Trump na Washington ntango milulu mya bondimi maponami ya baponi banene mizalaki kosalama.

Basali ya bâtiment Cannon mpe ndako misusu ezalaka nzinga nzinga na Capitole bamemaki na kobima na ba policiers nsima na lisikulu président Donald Trump asalaki na milulu ya balandi ba ye.

Na wuti kokima bureau na nga na Cannon mpo na likama lya balandi ba M. Trump, ekomi na Twitter mokeli mibeko moko ya Chambres ya bakeli mibeko.

Bituluku ya balandi ba Trump bazali na Washington.

XS
SM
MD
LG