Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Poutine apesi losoka na Biden mpe akanisi bakoluka kosilisa matata kati na mboka mibale


Président Vladimir Poutine ya Russie na bapanzi sango na Novo-Ogaryovo, Moscou, 17 décembre 2020.
Président Vladimir Poutine ya Russie na bapanzi sango na Novo-Ogaryovo, Moscou, 17 décembre 2020.

Vladimir Poutine mokonzi ya Russie alobi azali na elikya ete elongo na mokonzi ya sika ya Amerika Joe Biden bakoyeba na kosilisa matata kati na mboka mibale.

M. Poutine alobi yango na bokutani na panzi sango asalaka suka ya mobu inso.

Mokonsi ya Russie apesi longonya na Joe Biden kasi moko na bakonzi baike bazelaki boponi ya baponi banene na Amerika mpo kopesa longonya na molongi ya maponami na Etats-Unis.

M. Poutine alobi azalaki kozela lokola président Donald Trump azalaki koboya kondima elonga ya M. Biden.

Nzokande M. Biden alakaki kozala matata na Russie mpo mboka eye ezalaki na boyokani na M. Trump.

XS
SM
MD
LG