Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alobi soki atikali te na bakonzi akozonga nsima na mibu minei


Président Donald Trump na milulu na Maison Blanche, Washington, D.C., 3 décembre 2020.
Président Donald Trump na milulu na Maison Blanche, Washington, D.C., 3 décembre 2020.

Président Donald Trump alaki komilengela na kozonda na bokonzi nsima na mibu minei soki alongi te kotikala na ebonga na ye.

"Ezalaki mibu minei ya malamu. Tozali komeka kosala mibu minei misusu. Soki te, nakomona bino lisusu sima na mibu minei," elobaki Trump mardi na milulu mya eyenga ya Noël na Maison Blanche, na Washington.

Bililingi bya milulu myango bizali kotambola na ba réseaux sociaux.

Alobi azali na molende ya kobatela misala mya maponami

Na NBC alobaki ete akoki kobanda campagne mpo 2024 le 20 janvier mokolo na bolapa ndayi ya président abimi na maponami Joe Biden.

M. Trump nanu andimi te ete alongi te na maponami ma mokonzi ya mboka ya le 3 novembre ata bilembo bimonisi Joe Biden molongi.

Bisika mingi, bazuzi babwakisi bofundi ya moyibi mpe mbeba M. Trump azali kolobela.

XS
SM
MD
LG