Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba ntoma ya bikolo ya bapaya balaki kosunga na kobundisa bozangi bokeni na RDC


Mopesi toli ya président Félix Tshisekedi na kati ya ba ntoma ya bikolo biike na Kinshasa, 24 f♪0vrier 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Mopesi toli ya président Félix Tshisekedi na kati ya ba ntoma ya bikolo biike na Kinshasa, 24 f♪0vrier 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Nsima na bokutani na mopesi toli ya président Félix Tshisekedi mpo etali bokengi, François Beya, ba ntoma ya bikolo bya bapaya baike bakali kopesa maboko mpo na kobundisa bozangi bokengi na monyele ya RDC.

Ba ntoma ya bikolo biike basolaki na M. Beya mikolo mibale nsima na bobomi ya moko na bango ya ekolo Italie, Luca Attanasio lundi na Kibumba, na 25 kms ya Goma, na Nord-Kivu na basimba minduki bayebani te.

"Toyambamaki na Conseille spécial ya Tata mokonzi Félix Tshisekedi, François Beya. Toyebisaki ye makanisi ma biso mpo na maye matali bokengi na monyele ya Congo mpe boyikisi makasi ya misala tosalaka elongo na ntina ya kotia kimya ewumelaka," ekomaki na compte Twitter na ye Jean-Marc Châtaigner ntoma ya Unioni européenne na kisnahsa.

"Tosengeli kosale elongo mpo na kopesa maboko na mbulamatari na kosilisa bitumba mpe bobomi ya mabe na monyele ya RDC. Bana ba Congo banyokwami mingi, esengeli esila," ebakisi ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer.

XS
SM
MD
LG