Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FDLR nde babomi ntoma Attanasio ya Italie na Kimbunda, elobi ministère ya Intérieur


Motuka ezalaki komema ntoma ya Italie na RDC Luca Attansio ezwaki masasi na Ruhimba, na Nord-Kivu, 22 février
Motuka ezalaki komema ntoma ya Italie na RDC Luca Attansio ezwaki masasi na Ruhimba, na Nord-Kivu, 22 février

Ntoma ya Italie na RDC, Luca Attanasio, akufaki nsima na kozoka na masasi na bitumba batombaki ba Rwanda ya FDLR (Forces démocratiques pour la libération ya Rwanda) basalaki na zela ya Rusthuru, elobi ministère ya Intérieur ya RDC.

"Lundi 22 février 2021 pene na 9 heures na ntango ya esika eye, molongo ya mituka ya PAM (Mabongisi ya molongo mpo na Bilei) ekweyaki na bitumba ya bayi FDLR ," ekomi vice-Premier ministre, ministre ya mambi ya Kati ya mboka, Aristide Bulakali.

"Bato banei bamemaki na bayi FDLR na bitumba byango mpe mampinga ma RDC (FARDC) mazali kokoba koluka na bisika mbeba yango esalamaki," ebakisi ministre Bulakali.

Kolanda liyebisi ya minsitrieur ya bokengi ya kati yamboka, bato basato bakufi na bitumba byango, kati bango moyi RDC moko na bayi Italie babale, ntoma Luca Attanasio na mobateli na ye Vittorio Lacovacci.

"Ntoma Attansio azokaki na libumu mpe amemamaki na lopitalo ya MONUSCO na bakengeli ya ICCN (Institut congolais ya conservation ya nature), epayi wapi akufaki nsima na mwa ngonga," elobi minsitre Bulakali.

Ministre ya mambi ma Bapaya, Marie Ntumba Nzeza alakaki ete mbulamatari ya RDC ekosala nyonso mpo na koyeba ba nani bsali bobomi bwango.

Ntoma Attanasio azalaki na mibu mpe akendaki na Nord-Kivu na etinda ya lisungi.

XS
SM
MD
LG