Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ntoma ya Italie akufi na masasi na Goma mpe mbulamatari ya RDC elaki kokanga babomi


Ntambo Luca Attanasio ya Italie na RDC akufi na masasi na Goma (Nord-Kivu), awa bilili bipasami le 22 février 2021 na ministère ya mambi ma bapaya ya Italie,
Ntambo Luca Attanasio ya Italie na RDC akufi na masasi na Goma (Nord-Kivu), awa bilili bipasami le 22 février 2021 na ministère ya mambi ma bapaya ya Italie,

Ntoma ya Italie na Ekolo Congo démocratique Luca Attanasio akufi na masasi na bitumba basimba minduki bayebani te basali na molongo ya mituka miye azalaki na kati na Goma na Nord-Kivu. Ministre ya mambi ma bapaya ya RDC alaki bokangami bwa babomi.

Molobeli ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique na Nord-Kivu, major Guillaume Djike alobi ete bato babale basusu bakufi mpe lokola na masasi basima minduki bayebani te babetaki na mituka miye. Ezali mokumbi mutoka mpe mobateli na ya ntoma ya Italie.

Ntoma Luca Attanasio, na mibu tuku minei na misato, azalaki kotala misala PAM (Mabongisi ma molongo mpo na Bilei) ntango basimba minduki babetaki mituka myango masasi.

Biyano bipesami mingi nsima na sango ya liwa lya ye.

Mbulamatari ya Italie elobi ezali na nkanda mpe epameli mbulamatari ya RDC ya bolembu na yango,

Président ya Conseil européen, Charles Michel alobi ayoki mpasi mingi mpo bitumba biye na mituka ya PAM mpe asengi ete bokengi bopesamela baye basala kuna.

Ministre ya mambi ya pabaya Marie Ntumba Nzeza mpe andimi sango yango mpe alaki na mbulamatari Italie ete RDC ekosala makasi mpo kotia maboko na baye babomi ntoma Attanasio mpe apesi bana ba Italie maloba ma kobondisa mitema.

XS
SM
MD
LG