Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa lya Attanasio: Ba FDLR bawangani mpe bafundi ba FARDC na RDF (mampinga ma Rwanda)


Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.
Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.

Batomboki ya FDLR ya Rwanda bapameli mampinga ma bikolo ya Rwanda mpe Congo démocratique na liwa lya ntoma ya Italie Luca Attanasio, o'mokolo mwa yambo, na Kibumbam na Nyirangongo, Na Nord-Kivu.

"Ntoma Luca Attanasio azwaki masasi na esika ebengami 'trois antennes' pene na Goma na ndelo na Rwanda mosika te na epayi ba FARDC na DRF mampinga ma Rwanda bazalaka. Bango nde esengeli kolandela," elobi ba FDLR na liyebisi na bango.

Ba FDLR Bawangi ete bango nde babomaki ntoma Luca Attanasio lokola mbulamatari ya Ekolo congo démocratique efundaki bango nsima na liwa lyango.

Ntoma Luca Attanasio, na mibu tuku minei na misato, akufaki nsima na kozwa masasi elongo na mobateli wa ye mpe na motambwisi ya motuka na ye na molongo ya mituka ya PAM (Mabongisi ma molongo mpo na Bilei) na pene na ndelo na Rwanda.

Ba FADRL "basengi na liyebisi na bango ete bakonzi ba RDC na MONUSCO baluka mpenza pole mpo etali mokumba ya bobomi boye na esika ya kofunda" bango "na lombango".

A lire aussi

XS
SM
MD
LG