Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Luabeya, molakisi ya elongi ya Tshisekedi, azalaki matanga ya Attanasio na Rome


Motindami ya président Félix Tshisekedi, Patrick Luabeya (G) na masolo na ministre wa Yambo ya Italie, Mario Draghi na matanga ya ntoma Luca Attanasio, Rome, Italie, 25 février 2021. (Facebook/Fatshi News)
Motindami ya président Félix Tshisekedi, Patrick Luabeya (G) na masolo na ministre wa Yambo ya Italie, Mario Draghi na matanga ya ntoma Luca Attanasio, Rome, Italie, 25 février 2021. (Facebook/Fatshi News)

Italie epesi jeudi losako ya suka na ntoma Luca Attanasio na mobateli wa ye Vittorio Iacovacci baye babomamaki elongo na mokumbi motuka Mustafa Baguma Milambo, moyi Ekolo Congo démocratique, o’mwa yambo ya Kibumba, na nord-Kivu.

Motindami ya président Tshisekedi, Patrick Luabeya azalaki na misa masalaki na tempelo Maria y aba Angelo na Rome.

Ministre wa Yambo ya Italie Mario Draghi na bakambi ba parlement ya mboka na ye mpe bazalaki na milulu myango.

Na RDC, balukiluki motoba batindami na mbulamatari bakomi na Goma jeudi mpo na liwa lya ntoma Attanasio na mobateli na mokumbi motuka ya PAM.

Na Kinshasa, Ministre ya mambi ma bikolo mya Bapaya Marie Ntumba Nzeza akutanaki na ba ntomba ya bikolo ya bapaya.

Mme Ntumba asengi ba ntoma banso kopesa maboko na koyikisi bokengi makasi na RDC.

Ministre ya mambi ma Bapaya akundoli na ba ntoma ete basengeli koyebisi mbulamatari mposo moko yambo na kotika Kinshasa mpe kokende na bituka mpo na mosala songolo nan tina ya kopesama bokengi bosengeli.

XS
SM
MD
LG