Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Motion ya censure mpo na PM Ilunga etikami na Assemblée nationale


Sylvestre Ilunga Ilunkamba, ministre ya yambo ya RDC, na Cap, Afrika ya ngele, 3 février 2020.
Sylvestre Ilunga Ilunkamba, ministre ya yambo ya RDC, na Cap, Afrika ya ngele, 3 février 2020.

Mokanda ya kosenga bokweyisami ya Ministre ya yambo Sylvestre Ilunga Ilungakamba (motion ya censure) motikami na Bureau d'âge ya Assemblée nationale, eyebisi boko na bakeli mibeko.

Bakeli mibeko 331 batie manzaka na mokanda yango, mingi yambo na likita lya kondima mabongisi ma kondima mobeko mopesi nzela ya kokota na ZLECAF (Zone économique ya libre échange ya Afrika).

Esalami nzela moko na botiami manzaka ya bakeli mibeko na mokanda ya kokota na Union sacrée, boyokani ya sika mokonzi ya mboka azali kokela.

Kasi bayi FCC babimaki na likita lyango mpo batombokaki ndenge président ya Bureau d’âge aboyaki kopesa bango maloba.

Bayi FCC bazalaki kosenga motion na bango eleka mpo bakweyisa Burea d’âge.

Bayi FCC bazali kopamela M. Nkodia na koboya kopesa maloba na moko na bango, Joseph Kokoniangi, mpo na atanga motion to mokanda ya kosenga bolongwi ya Bureau d’âge.

Cour constitutionnelle ekati, na bosenga ya M. Nkodia, mikolo mileki ete Bureau d’âge esengeli esala makambo manso lokola Bureau provisoire ya Assemblée nationale mpe motion moko te epekisa yango mosala na yango.

Bayi FCC, bazali kopamela Burea d’âge na kobuka Buku likonzi mpo esengeli na yango nde kosalisa maponami ya Bureau définitif mpe kolekisa ndelo te.

Nzokande nkasa ya kotala soki ngambo nini ezali na majorité epesami na bakeli mibeko.

Kasi bayi FCC, bakebisi ete mobulu mokota mpo ba députés banso bakoloba bazali na majorité.

Bayi FCC bakangami na majorité ya kala.

Kasi mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi akataki libala lya CACH lingomba na ye na FCC mpe alobaki majorité ya kala epanzanaki.

Modeste Bahati Lukwebo, "Informateur" M. Tshisekedi atiaki mpo na kotala ngambo nini ezali na majorité asi abandaki mosala mpe amemelaki président ya mboka mercredi bakambi ba groupes parlementaires mpe ya masanga bandimi kokota na Union sacrée, majorité ya sika.

XS
SM
MD
LG