Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Baike ya FCC bazalaki te kasi Assemblée nationale endimi mobeko mopesi nzela ya kokota na ZLECAF


Mboso Nkodia Mpwanga (C), mokambi ya Bureau d’âge ya Assemblée elongo na basungi baye Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D) na Palais du peuple, Kinshasa, 6 décembre 2020.
Mboso Nkodia Mpwanga (C), mokambi ya Bureau d’âge ya Assemblée elongo na basungi baye Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D) na Palais du peuple, Kinshasa, 6 décembre 2020.

Assemblée nationale elekisi mabongisi ma mobeko mopesi nzela na kondima boyokani ya ZLECAF (Zone de libre échange continentale aficaine) kasi baike na bakeli mibeko ya FCC babimaki mpo na kosenga motion na bango ya kokweyisa Bureau d’âge elongwa.

Bakeli mibeko 330 baponaki mpo na kolekisa mobeko yango. Mwambe baboyi yango mpe mibale bamipekisaki, elimbolaki mokambi ya Bureau d’âge ya Assemblée nationale, Mboso nkodia Mpwanga.

Yambo na maponami maye, bayi FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila babimaki na ndako na bokeli mibeko.

Bayi FCC bazali kopamela M. Nkodia na koboya kopesa maloba na moko na bango, Joseph Kokoniangi, mpo na atanga motion to mokanda ya kosenga bolongwi ya Bureau d’âge.

Cour constitutionnelle ekati, na bosenga ya M. Nkodia, mikolo mileki ete Bureau d’âge esengeli esala makambo manso lokola Bureau provisoire ya Assemblée nationale mpe motion moko te epekisa yango mosala na yango.

Bayi FCC, bazali kopamela Burea d’âge na kobuka Buku likonzi mpo esengeli na yango nde kosalisa maponami ya Bureau définitif mpe kolekisa ndelo te.

Nzokande nkasa ya kotala soki ngambo nini ezali na majorité epesami na bakeli mibeko.

Kasi bayi FCC, bakebisi ete mobulu mokota mpo ba députés banso bakoloba bazali na majorité.

Bayi FCC bakangami na majorité ya kala.

Kasi mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi akataki libala lya CACH lingomba na ye na FCC mpe alobaki majorité ya kala epanzanaki.

Modeste Bahati Lukwebo, "Informateur" M. Tshisekedi atiaki mpo na kotala ngambo nini ezali na majorité asi abandaki mosala mpe amemelaki président ya mboka mercredi bakambi ba groupes parlementaires mpe ya masanga bandimi kokota na Union sacrée, majorité ya sika.

XS
SM
MD
LG