Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko ya FCC baboyi masolo ma mbogwana ma maponami libanda lya parlement


Ministre wa Yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba (D) ayambi mokanda ya bakeli mibeko ba FCC baye baboyi masolo ya kobongisa maponami, libanda lya parlement, Kinshasa, 10 août 2020. (Primature RDC)
Ministre wa Yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba (D) ayambi mokanda ya bakeli mibeko ba FCC baye baboyi masolo ya kobongisa maponami, libanda lya parlement, Kinshasa, 10 août 2020. (Primature RDC)

Bakeli mibeko ya FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila bayebisi ministre ya Yambo ete baboyi masolo matali mbongwana ma maponami libanda lya parlement.

Baike kati na bakeli mibeko baye bakutanaki na ministre wa Yambo, Sylvestre Ilunga Ilunkamba, lundi na ndako ya mosala na ye.

"Toyaki kopesa ministre wa Yambo mokanda ya koloba ete masolo wana bato baike balingi kosala mazali te na lotomo na ntango eye. Biso ba députés tozali maboko ya kofungwama mpo tolingi makambo makende malamu. Kasi session ya parlement ekofungwa le 15 septembre. Tomoni te ntina ya kowelela sik’oyo. Makambo mango masengeli masololama na session eye ya parlement," elobi moko na bakeli mibeko baye bakutanaki na M. Ilunga.

FCC esi elobaki likambo lyango nsima na kokutana mposo moleki na bato 13 baye bazali kosala masolo na ngambo inso na ntina ya koluka bomoko na maye matali mbongwana na maponami.

Bakeli mibeko ya FCC basengi bokengi na ministre wa Yambo mpo balobi na session eleki banyokolamaki mingi na bato basusu ntango bazalaki kosala mosala na bango.

XS
SM
MD
LG