Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bahati amemeli Tshisekedi bakambi 25 ya ba groupes parlementaires mpe ya masanga ya politiki


Bililingi ya président Félix Tshisekedi (likolo G) na Informateur Bahati Lukwebo (Likolo D) na bakambi ya ba groupes parlementaires na ba partis baye bakoti Union sacrée na bokutani na Palais de la nation, Kinshasa, 20 janvier 2021. (Twitter/Présidence RD
Bililingi ya président Félix Tshisekedi (likolo G) na Informateur Bahati Lukwebo (Likolo D) na bakambi ya ba groupes parlementaires na ba partis baye bakoti Union sacrée na bokutani na Palais de la nation, Kinshasa, 20 janvier 2021. (Twitter/Présidence RD

Modeste Bahati Lukwebo, "Informateu"r to moto atiamaki mpo na koluka lingomba nini eleki sika na majorité na Assemblée nationale, amemeli président Félix Tshisekedi 25 bakambi ya groupes parlementaires.

Bokutani na bango na président Tshisekedi bosalami mercredi na Palais de nation.

Bato baye bazali baye bandimi kokota na Union sacrée, liboke président Tshisekedi azali kokela nsima na kokata libala kati na CACH (Cap pour le changement), lingomba lya ye, na FCC (Front pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

M. Bahati alakaki lobi, mardi, na bokutani na babanzi sango kobanda kokutana bato na masolo.

Bo' informateur alakaki mpe komemla M. Tshisekedi majorité mpe kosunga mpo na yango.

Nzokande, kaka mardi, mokambi ya UDPS, Jean-Marc Kabund akutanaki na bayi FCC, lisanga lileki na bato na parlement.

M. Kabund alakaki kopesa bango bokambi ya Aseemblée nationale mpe apamelaki Moïse Katumbi na Jean-Pierre Bemba na koluka koboma "Union sacrée".

M. Kabund abimisaki polele ete bosenga ya MM. Katumbi na Bemba ya bokambi Assemblée nationale mpe ya Primature bizali likama mpe bitosi te malako ya lingomba lileki na motango mingi na Parlement.

XS
SM
MD
LG