Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mosali théâtre "Mama Shako" akufi


Comédienne Jacqueline Shako Diala Anahendo ayebana na nkombo ya "Mama Shako" awei, photo etiamaki na Facebook ya Rdc Artistes le 17 mai 2020. (Facebook/RDC Artistes)
Comédienne Jacqueline Shako Diala Anahendo ayebana na nkombo ya "Mama Shako" awei, photo etiamaki na Facebook ya Rdc Artistes le 17 mai 2020. (Facebook/RDC Artistes)

Comédienne to mosali théâtre ayebana na nkombo ya "Mama Shako" awei lelo. Lingomba lya basali Theatre epesi sango yango.

Na nkombo na ye ya solo Jackie Shako Diala Anahengo, "Mama Shako" awei na lopitalo HJ na kinshasa,

Baninga baye ba comédiens Roch na Masumu Debrindé nde basakoli yango na vidéo etiami na Facbeook.

Azalaki na mibu tuku motba na minei asalaka mingi na groupe Salongo ya RTNC.

Alekaka mpe na mangoma ya théâtre misusu lokola na 1972 na Groupe Mwangaza de Muyouyou wa Muyouyou, na 1985 na Groupe Mangobo, na 1986 na Groupe Nzoyi mpe na Ecurie Maloba, na 1991 mpe na Groupe Sans Soucis D'afrique.

"Mama Shako" asali misala mya théâtre mibu 40, bandaki wuto azalaka na mibu 15.

Baninga baye basusu balobi ete azwaki nkwokoso nsima na minganga kolongola ye minu misato.

XS
SM
MD
LG