Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokonzi ya parquet ya Rutshuru abomami mposo moko nsima na liwa lya ntoma Attanasio


Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.
Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.

Mokonzi ya Parquet ya Rutshuru, na Nord-Kivu, major Williams Mulanya akufi mardi na mpokwa na masasi ya basimba minduki na nzela ya Goma na Rutshuru-centre.

"Nzoto ya mokonzi na biso etiami na ndaku ya malili. Akufaki nsima na kozwa masasi elongo na commandant ya 3409e régiment oyo amemami na lopitalo," elobi mosali moko ya parquet ya Rutshuru.

Basimba minduki babetaki masasi na molongo ya mituka na bango nsima na yango kokoma na Katale.

Baromètre sécuritaire ya Kivu mpe endimi likambo lyango.

Yango esalami kaka mposo moko nsima na liwa lya ntoma ya Italie Luca Attanasio na mobateli ya ekolo Italie, elongo na mokambi mutaka na bango ya RDC, le 22 février 2021 na Kibumba na 15 kms na Goma.

Nzokande kaka na Nzinga nzinga, bakambi ba Parc ya national ya Virunga balobi ete bakufisi ba écogardes tuku mibale na mibale wuto mobu moko.

Mokambi ya parc ya Virunga Emmanuel Demerode alobi basimba minduki basalaki bitumba koleka tuku minei na minei na ba civili na parc eye.

Emmanuel Demerode akundoli ete ba écogardes bamekaki kobikisa notma Attasio kasi basimba minduki babomaki ntoma ya Italie, mobateli wa ye mpe mokumbi moutka na ye yambo ba écogardes bakoma mpe bakimaki.

President Felix Tshisekedi azalaki na misa na Kinshasa mpo na kokanisa ntoma Attanasio na baye babomaki na ye elongo.

Cardinal Fridolin Ambongo alobaki na mateya ma ye ete RDC ekomi benza na nse mpe esengeli manso masala mpo bobkengi bozonga.

XS
SM
MD
LG