Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bana ya RDC bakanisi bobomami ya bandeko na bango na RDC, na milulu na Washington mpe bisiki mingi


Ba Congolais na milulu na nzela ebengaki Black Lives Matter Plaza Northwest, na Washington D.C, USA, mpo na kopalela bobomami ya bandeko na bango na monyele ya RDC, Washington, 2 août 2020. (John's Mbulula)
Ba Congolais na milulu na nzela ebengaki Black Lives Matter Plaza Northwest, na Washington D.C, USA, mpo na kopalela bobomami ya bandeko na bango na monyele ya RDC, Washington, 2 août 2020. (John's Mbulula)

Bana ya Ekolo Congo démocratique batambolaki na Washington D.C., na Etats-Unis, mpe na bisika misusu na mokili mpo na kopalela bobomami ya ba ndeko na bango.

Milulu myango misalamaki na balabala eye ezwingi nkombo ya Black Lives Matter Plaza North west epayi wapi bato mingi batelemeka minyoko mpe bobomi ya baying na Amerike mpe na mokili.

Bato bayike batyaki manzaka na memorandum ekabolami.

Na Kinshasa bato basangaki na Centre Lasalien na commune Binza Ma Campagne epayi wapi bitulu babwakaki ba ballons likolo mpe bapesaki sango na bango.

Na Bukavu milulu misalamaki mpe bato basengaki bakonzi kotia le 2 août lokola mokolo ya mboka ya kokanisa génocide ya ba Congolais.

Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE (Engagement citoyen pour le développement) mpe moko na bakambi ya Lamuka alobi, wuta Etats-Unis epayi azali, été mokolo wana mokoni mokolo na konisa bawei ya bobomami na na RDC.

Milulu misusu misalamaki na Paris, na Londres mpe Bruxelles, na Uvira, na Kenge mpe bisika misusu,

Le 2 août 1998 nde lingomba ya batombaki RCD/Goma (Rassemblement des Congolais pour la démocratie) likotaki na Goma na lisungi ya Rwanda mpo na kobanda bitumba.

XS
SM
MD
LG