Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila akokoma samedi na Lubumbashi


Mokonzi Joseph Kabila o'mokolo ya maponami, na Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Mokonzi Joseph Kabila o'mokolo ya maponami, na Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Mokonzi ya kala Joseph Kabila akokita o’mokolo mwa mposo na Lubumbashi, na Haut-Katanga.

Balandi baye balobi bamilengeli na ntina ya koyamba ye malamu.

"Ntango ya bokomi na ye yango oyo. Sika manso mabongisami. Mwana nyonso ya Lumbashi alingaka kimya mpe alingi moto asali mingi mpo na démocraie na ekolo, na Afrika mpe na mokili, abengisami na koyamba mwana nsomi ya mboka oyo asali mingi mpo na démocratie," elobi mokambi molangi ya Assemblée provinciale ya Haut-Katanga, Dieudonné Pablo Ngoy nsima na likita jeudi lya kobongisa bokomi ya M. Kabila.

Bokiti bwa ye na Lubumbashi bozelami mwa mingi.

Bokomi bwa M. Kabila na engumba mokonzi ya Haut-Katanga, bokosalama mokolo moko yambo ete mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi asakola mikano azwi na kopesa eyano na matata kati na lingomba CACH (ya M. Tshisekedi) na FCC (ya M. Kabila) na boyokani ya bokambi mboka.

Bayi FCC bazalaki kokebisa ete bokeli majorité ya sika lokola M. Tshisekedi alobaki mikolo mileki, misalama na kobuka Buku lionzi.

M. Tshisekedi apemalaki bokangi ya mboka nan tina ya boyokani CACH-FCC boye bozali na matata.

XS
SM
MD
LG