Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

VP ya kala ya Zambie akangami na Lumbashi na kofundama na koluka kokutana na Kabila


Président Joseph Kabila na Kolwezi, Lualaba, 12 décembre 2020. (Twitter/Barbara Nzimbi)
Président Joseph Kabila na Kolwezi, Lualaba, 12 décembre 2020. (Twitter/Barbara Nzimbi)

Opposant moko ya Zambie, Nevers Mumba oyo azalaki vice-président na ntango ya président Levy Mwanawasa atiami na résidence surveillée to bokengelami na ndako na nzela na ye ya kowuta Kolwezi nsima na kofundama na koluka kokuta na moko ya kala ya RDC Joseph Kabila.

M. Mumba akangamaki na Kolwezi na zela na ye ya kozonga na Lubumnashi. Alobi ezalaki mpo na ba affaires to mabongisi ma mombogo nde akendaki na Kolwezi mpe Lumbubashi.

VP ya kala ya Zambie Nevers Mumba alobi ayebi ntina bakangeli ye te na Lumbubashi [TOYOKA]
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:42 0:00

"Nayaki awa mpo na likita ya misala tosalaka ya kopesa biloko bike na mbulamatari ya Katanga toloba ya Lualaba. Toyebi soki nani akoseli biso makambo na ngambo ya Zambie to ya RDC ya koloba ete na kutanaki na mokonzi ya kala awa. Eza solo te. Na kutani na ye te. Libaku mabe ete nakomi awa ntango matata makasi ya politiki mazali awa," elimboli M. Mumba na mopanzi James Butty ya VOA.

Président ya kala ya RDC Joseph Kabila azali na Kolwezi wuto mokolo ya mposo moleki. Nokomi bwa ye na engumba mokonzi ya Lualaba bosalami ntango matata mpe bobendani ya makasi ezali na mayi politiki kati na balandi baye ba ngambo ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Président Tshisekedi akati boyokani ya kokamba boazalaki na bayi FCC ya M. Kabila.

Vice-président ya kala ya Zambie alobi ete akangamaki na nzela na ya kozonga na Lubumbashi na kowuta Lubumbashi.

"Nayebi mpeza te likambo yango ezali nini. Nayaki awa mpo na business. Tozalaki kozela likita lyoko nsima na mosusu. Bayi bokengi bayaki kozinga biso na basoda na minduki ya minene. Basengaki nga kolanda bango, Babwakaki nga kati na motuka kolongwa Kolwezi kino Lubumbashi mpe ntango to komaki awa (na Lubumbahsi) batunaki nga mituna ngonga mitano. Napesaki bango biyano na mituna ya makambo mazalaki manso ya lokuta. Kasi bazali kokanisa makambo mosusu. Nasengeli na zela bango kotala soki maye nalobi mazali solo. Kinshasa ebengaki mpe etindaki ete batika nga mpe bamemaki nga na chmbre ya hôtel esika bazali kokengela nga," ebakisi M. Mumba.

Ministre ya mambi ya makoki ma bomoto alimbolaki na VOA Lingala ete ayebi nanu likambo lyango te.

Babundi bamakoki bamoto na Lumbashi balobi mpe ete bazali kolandela likambo layngo.

"Bolukiluki bozali kosalama kasi toyebi ete vice-président ya Zambie na mokonzi ya kala ya RDC bazali na makoki ya kokutana bisika binso mpe kosolola makambo manso balingi, ata politiki, kasi longola kaka makambo maye mibeko ya Congo na ya zambie mipekisi," elobi mokambi ya Institutit pour la rechrche des droits de l’homme na Lumbashi, Me Hibert Tshiswaka.

Mpo na ye, bayi politiki bakoki mpe kosala ata mobongo to mosala mosusu lokola kozala avocat.

M. Mumba azali komilengela mpo na kopesa nkombo na mabonami ma mokonzi ya mboka makoya na Zambie.

XS
SM
MD
LG