Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na bakangami 50 bazoki na bomeki kokima boloko ya Buluwo na Haut-Katanga


Policier moko na nzela na Lubumbashi, Haut-Katanga, 5 décembre 2011.
Policier moko na nzela na Lubumbashi, Haut-Katanga, 5 décembre 2011.

Pene na bakangami 50 bazoki na bomeki kokima boloko bonene bwa Buluwo, na Likasi na Haut-Katanga, elobo bayi bokengi.

Kolanda bakambi ya etuka ya Haut-Katanga, bato baye bazoki na bitumba bibimaki na bomeki ya kokima bolo boye na butu ya mokolo ya minei na mokolo mwa mitano.

Mokambi ya engumba Likasi, Idesbald Petwe Kapande alimboli ete bolukiluki bozali kosalama nsima na bitumba bingalaki na boloko boye na bomeki kokima na bato ba boloko baike.

Bakengeli babolojo boye, mingi mpenza ba policiers bazongisaki bato balingaki kokima nsima na bango komeka kobuka ekuke enene, eyebisi bato baike.

Sanza mibale eleki bakangami basusu bamekaki mpe kokima na boloko ya Kasapa, na Lubumbashi kaka na etuka eye ya Haut-Katanga.

Batumbaki ndako na bango bavandaka.

XS
SM
MD
LG