Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwana ya dos Santos alobi akimi mboka na ye


Banda gauche ti droite, bana ya Eduardo dos Santos: Filomeno dos Santos, Isabel dos Santos, Tchizé dos Santos mpe Paulino dos Santos (Coreon Du)
Banda gauche ti droite, bana ya Eduardo dos Santos: Filomeno dos Santos, Isabel dos Santos, Tchizé dos Santos mpe Paulino dos Santos (Coreon Du)

Welwitschia dos Santos, deputée ya ekolo Angola mpe mwana ya mwasi ya mokonzi ya kala Eduardo dos Santos, asakoli, kowuta Londres (Angleterre), ete akimi mboka na ye.

"Nazalaki na nse elaka ete basala nga mabe epayi ya lingomba moko ya ba parlementaires mpe ya basali ya mosala ya bokengi," elobi Welwitschia oyo abengamaka na nkombo ya Tchizé. Mongonngo na ye ekabolamaki na bapanzi sango ya Angola, mpe ekomelaki VOA Lingala.

Sango epesemaki na Jeune Afrique.

"Na kimaki banda bakangaki député moko na avion" na janvier, elobi Mme Welwitschia.

Député yango, Manuel Antonio Rabelais, azalaki ministre ya kala ya président dos Santos, balandelaki ya mpo ko kosalela mbongo ya l’Etat, apekisamaki kobima na Angola ntango azalaki komibongisa mpo na kozwa mpempo mpe kokende na Lisbone, na Portugal.

Mwana na liboso ya dos Santos, Isabel dos santos mpe avandaka na Londres, aboyaki kala te koyanola ba convocations ya bakonzi ya bosembo ya Angola mpo na bolukiluki likolo na ba virements suspects asalaki ntango azalaki PDG ya Sonangol.

XS
SM
MD
LG