Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moïse Katumbi atiyami vice-président ya Association ya ba clubs ya Fifa


(D ti G) Moïse Katumbi, mokmbi ya TP Mazembe, Gianni Infatino, mokambi ya Fifa mpe Florentino Perez, mokambi ya Real Madrid na bokelami ya WFCA na Zurich, Suisse, 17 novembre 2019.
(D ti G) Moïse Katumbi, mokmbi ya TP Mazembe, Gianni Infatino, mokambi ya Fifa mpe Florentino Perez, mokambi ya Real Madrid na bokelami ya WFCA na Zurich, Suisse, 17 novembre 2019.

Moïse Katumbi, mokambi ya TP Mazembe, atiyami na ebonga ya mokambi molandi ya Association ya ba clubs ya football (lisano ya ndembo), WFCA.

Moïse Katumbi azwi ebonga yango na bokutani bosalamaki na ndako ya Fifa na Zurich (Suisse) le 15 novembre 2019 mpo na kobongisa Coupe du monde ya ba clubs ya Fifa ekobetama na Chine na 2021.

Mokambi ya Real Madrid CF, Florentino Perez, ye nde atiyami na libonga ya president ya WFCA (World Football Club Association, Angele).

"Esengo mingi kozala moko ya bakeli mpe vice-président ya World Football Club Association ya Fifa, esakolamaki na Zurich! Nazali kotala lotomo ya mokumba ya kolakisa elongi ya football ya Afrika! Matondi na football congolais, Fecofa mpe @TPMazembe!" ekomi na compte Twitter na ye Moïse Katumbi.

Bakambi mwambe ya ba clubs ya ba continents motoba nde bakeli Association yango.

Bakambi ya AC Milan (Italie,Poto-Europe), Aukcland City FC (Nouvelle Zélande-Océanie), Club Atlético Boca Juniors (Argentine-Amérique du Sud), Club Atlético River Plate (Argentine-Amérique du Sud), ClubAmérica (Mexqiue-Amérique du Nord), Guangzhou Evergrande FC (Chine-Asie), Real Madrid CF (Espagne-Europe) mpe TP Mazembe CF (Congo-Afrika) nde bazali ba clubs baye bakeli lisanga yango.

Ba clubs oyo nde bakobengisa ba clubs misusu na Assocation. Bazwi mbano ya kobatela bolamu ba clubs misusu ya ba continents na bango.

XS
SM
MD
LG