Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya sembo misengi mikanda ya bolukiluki mpo na liwa ya Lumumba na Belgique


Premier Ministre ya Congo Patrice Lumumba, na Maroc, le 08 août 1960. / AFP PHOTO
Premier Ministre ya Congo Patrice Lumumba, na Maroc, le 08 août 1960. / AFP PHOTO

Misala mya sembo na Bruxelles misengi mikanda mya bolukiluki ya parlement ya Belgique mpo na koluka pole na bobomi ya Patrice Emery Lumumba, ministre wa Yambo ya yambo ya Ekolo Congo démocratique.

Ezali bongo ba cartons nkama mibale ya mikanda ya parlement eye misala mya sembo esengi ete mitiama na bokengi mpo moto asimba te.

Ezali ba rapports ya boyoki bato bosalamaki wuto koleka mibu ntuku kasi mitakala kobimisama te.

Liwa lya Lumumba lisakolamaki le 17 janver 1961 nsima bobomi na ye na Lubumbashi mpe zonto na ye kolimwisama na acide.

Belgique endimaki kozala mokumba ya molimo mpe esangaki bolimbisi mpo na liwa lya Patrice Emery Lumumba nsima na libota lya ye kofunda.

Bosambisami mpo na liwa liye nanu bobengisama te.

XS
SM
MD
LG